Koffi Olomidé
Meslian

Tongo ya lelo, tongo ya makambo
Tongo ya lelo nalamuki na ba soucis
Baninga babala batonda na bisengo
Ngai se kozelaka yo tango inso

Tongo ya lelo, tongo ya makambo
Tongo ya lelo nalamuki na ba soucis
Baninga babala batonda na bisengo
Ngai se kozelaka yo tango inso

Y'okoya mokolo nini eh
Y'okozonga ah mokolo nini eh
Ngai moko na kati ebale mbonge
Ngai se kozelaka yo butu moyi
Ngai moko na kati ebale mbonge
Ngai se kozelaka yo butu moyi

Ah batungisi nga trop pona yo
Nga bamatisi nga ngomba molayi eh
Ngomba bamatisi nga ba nzube pe moselu
Soki kuna nde epayi ozanga nakokoma kaka
Meslian na Ponton sur mer, Gabin ya Tembo na Paris
Mbuyi Mwela na Switzerland, Leon Lifoli

Kamwa ve, lota ve, tina ve nabanga te oh
Nazali se kozela ah Meslian yo ozo oooh
Ecoutez la Diffеrence
Quartier Latin ba Massachusеtts, quoi ah

Meslian y'ozala wa nga, motema napona ah
Y'olongolaka nga pinzoli na tango ya mawa
Banguna bakoti bazongi na mawa na nga
Est-ce que y'okozonga lisusu na bolingo yango?
Est-ce que y'okolinga nga lisusu na ndenge ya kala?
Est-ce que y'okozua tango ya kobenga nga lisusu Rambo j'adore?

Patrick Diamona (Ah)

Eh layi layi la ah, eh layi chauffé
Eh layi layi la ah, charme ya Quartier Latin

Gunther Monsieur Le Maire de Paris

Eh layi layi la ah, eh layi chauffé
Eh layi layi la ah, charme ya Quartier Latin
Mwana mwasi alati robe ya pembe alobi toboyana ah
Sala mbongo kudia luzingu pasi mabele nde riche (Bijou Mayanga)

Eh layi layi la ah (Papa Rengos), eh layi chauffé (Patrick Luwowo)
Eh layi layi la ah, charme ya Quartier Latin

Mwana kento bula ngoma yeh-yeh-yeh-yeh
Bula ngoma
Mwana kento buila ngoma yayi eeh
Buila ngoma
Nazuaka se na pasi Akramoje eh (Ah Eric eh)
Nazuaka se na pasi papa na Criss Cross eyi yeh mama

Eh layi layi la ah, eh layi chauffé (Leon Nela)
Eh layi layi la ah, charme ya Quartier Latin

Ah nga nazangi molongani ah nga nazangi sentiment ah
Mobali akende atika nga ata mokanda te mama ah
Ata kimbundi te nalata oh, bakumba yo nasuka mboka
Mboka na ngai se moko, sentiment nga se moko
Atali bosali nionso pamba, ngai nalingi kaka Rambo

Eh layi layi la ah (Jr), eh layi chauffé (Ikoli)
Eh layi layi la ah, (Jo Niko) charme ya Quartier Latin

Tonton Ngombo bolingo nakoma kolela Adamu ye eh
Butu nalalaka te, makanisi se kobanza Criss Cross eh
Eh layi layi la ah, eh layi chauffé
Eh layi layi la ah, charme ya Quartier Latin