Po ete ye akokoma' oyina ngai wa yo eh
Ndenge musulman ayinaka ngulu
Po ete ye ako komi'obenga nga na kombo ennemi
Moto tolinganaka koleka fumbwa na nguba
Eh moto tolinganaka koleka mbisi na mayi
Moto tolinganaka koleka mbuma na nzete
Nakamwe
Nzela wana oponi olanda eh yango te
Okoya kobunga nzela oyo Nzambe akela pona yo diii
Mbuma bakalinga ata oloni ozeli ba mbula cent
Ekobota te
Yo otikaka koluka kotia singa na tonga
Na kati molili maboko ekoya kolemba
Yo otikaka koluka kotia singa na tonga
Na kati ya molili, miso pe ekoya kolemba
Motema na yo nga nayebi eloko elingaka
Nzoto na yo, nga nayebi eloko ebonga n'ango
Bango te
Kaka yo eh ngai te
Kaka yo еh ngai te
Motema na yo, nga nayebi еloko elingaka
Nzoto na yo, nga nayebi eloko ebonga nango
Bango te
Eh nani amoneli nga Didi Kinwani
Eh nani amoneli nga Hugues Ngouélondélé
Hmmm nani amoneli ngai Laurent Lorenzo
Simon Mbongo est-ce que omoni Aimé Sokofere
Rita Bola wapi Washington aza wapi
Nani amoneli nga Bouboul Yondela
Ayebisa ye azonga na temps
Ayebisa ye awa nde amour na ye ezali, à vie
Ah ngai eh malelisa eh maman
Ah ngai eh mandola eh maman
Ah nga nazui lisasi na guerre, namoni croix rouge nabanzi na sauver
Nzoka croix rouge azua nga na likambo un temps
To to to a barrer nga
Vide na yo se kolela ata bamemisi nga na ba mawa mosusu
Goût na nga ya yambo, bulletin na nga ya maternelle, maman
Elongi ata e refoulé mawa kasi motema ezo souffrir
Bobele Nzambe ayebi pasi na nga na mesure ya ba douleur
Ata banganga bayebi te soki bayebaka mais PMU mbele ekweya
Tu veux quoi anh loba eh
Tu veux quoi mais olingi nini loba
Démarche ya kot-kot bolingo ekoti sili
Tozalaka associé neti liso na poti
Modèle y'olingaka kaka nga nde nayebi eh
Bolingo zonga na temps point faible na yo ngai eh
[?] bismillah
Zela ngai oh
Zela nga oh bolingo
Bandaka kosi okondima po bolingo eza
Tellement olingi matata nalobi vérité
Nga maloba na nga ekomi n'ango bololo
Un jour okopesa monoko na nga raison
Lelo plaisir eza lobi okokanisa
Ata na moke nasala pona yo
Tu peux avoir raison mais je ne suis pas content
Silivi wo wo wo (Silivi wo wo wo)
Silivi wo wo wo (Joël Tulu, Albert Kandolo)
Silivi a ceintame (Didier Ikoko, Jack Botulu)
Silivi aboti mwana (Manu Luvaka full comm)
Mopepe akosi likasa alongwa nzete ya lidame
Nakomema yo nzete ya pomme likasa alandi intérêt
A négliger nzete ya lidame nzoka nde akei fulu eh
Silivi wo wo wo (Silivi wo wo wo)
Silivi wo wo wo (Martin Ekamba na Alberto Kapangala)
Silivi a ceintame (Mathieu Kazanga Silivi sanga hola)
Silivi aboti mwana
Silivi papa nani
Est-ce que eza moto ya mangweni
Ou bien moto ya bikedi
Silivi wo wo wo loba bien