[Intro]
Nzete ebetela nkake, ebangaka te likolo eyinda
Osalaka ngele, mokolo eye molayi
Kozanga koyeba e'a liwa ya ndambu
[Couplet 1]
Ah mama, tala mbula ezobeta
Don Pierrot tala ngonga esi ekoki
Ya l'amour oyo olakaki ngai
Ya bolingo oyo prometaki nga
Kolinga te ekoma ya au secours
Kolinga te moto aya kowa
Yaka na yango malembement
Yaka na yango yo moko
Mwinda ya nzela kala te ezokufa
Naboyi naya kowa n'ango elongo
Na preferé nazela jour na nga
Tango okoya sans témoin ni juge
Lilita na ngai kombo na yango amour ya yo
[Couplet 2]
Mondele asala mbongo na mandoki
Alukela mokili mindondo
Kasi pona souffrance ya l'amour
Akoka te kosala ata aspirine
Na ndeke aluka akoma na sanza
Ngai oyo nazowa po nalingaki
Moninga moto selon loi ya Dieu
Tango akelaki Adamu na Eva
Atindaki tolinganaka
Y'ozoboya olinga ngai ezali lisumu
Ngai nakokufa te soki nanu olingi ngai te
[Couplet 3]
En réalité
Nabotamaki mokolo nakutanaki na yo
Mwinda ya nzela jamais ekokokana na oyo beauté
Yaka au secours na nga, ngai moto motema ezoka
Heure tokomi ata ba chauffeurs ya b'ambulances balali
Ata na paradiso heure tokomi Saint-Pierre alali
Photo na maboko nakomi koyenga-yenga partout ozali wapi
Mbula nkake na Kigali jour yango ezalaki onoka
Nazalaki koluka nabangaki na ngai kopola te
Singa lindanda ya Popolipo jour yango ekatanaki
[Pont]
Tshoshina benga caprice
Oyo obe yo moko na moto na yo ya palais
Kotikela ye moto mosusu te wana liwa na yo ebandi
[Couplet 4]
(Mukengeshay)
Moto oyo osi otia ye elembo (Mukengeshay)
Na motema pe na nzoto (Mukengeshay)
Tika otikaka ye isolé (Mukengeshay)
Tika otikaka ye éloigné (Mukengeshay)
Akoya kokoma chien méchant (Mukengeshay)
Kosuwa kosuwa moto tout na nzela (Mukengeshay)
Mama Rocky ya motema (Mukengeshay)
[Pont 2]
Boma mwinda miso etika koyoka soni
[Couplet 5]
Ba mbangu basala, ba noki bawela, biso se malembe
Eh ba mbangu basala, ba noki bawela, biso se doucement
Oyo ya ngai na mwana mama bolingo ya bosembo, bolingo ya epanda
Ya ngai na mwana mama bolingo ya tout le temps, bolingo ya vérité
Ata nakomi avion wapi nakokende yo nde aéroport
Ata nakomi ndeke pona mpimbwa likolo zala ya nga mapapu
Oh malembe, oy'a biso se malembe
Doucement, oy'a biso se doucement
Ah iyoleli ya ngai na yo eh
Bisengo ya biso mibale
Ata balobi baloba
Ata bafingi bafinga
Ata bayini bayina
Ah iyoleli ya ngai na Stephie
Bisengo ya biso ba la joie
Ata batongi batonga eh
Ata bayini Don Pierrot
Ata balobi baloba
[Dédicaces]
Bongani Gege, Mwalimu
Euh Godard bobengana, ah Don Pierrot Mavungu
[Outro]
(Mukengeshay)
Soki osi o signa moto na motema (Mukengeshay)
Tika osalaka ye ezala-zala (Mukengeshay)
Akoya kokoma chien méchant (Mukengeshay)
Kosuwa-suwa batu partout partout (Mukengeshay)
Ekatshaka tiaka nga à l'aise (Mukengeshay)
Stephanie Séfie tiaka nga à l'aise (Mukengeshay)
Et Don Pierrot Mavungu salaka nga vrai (Mukengeshay)
Droit d'aimer ezali, tika na linga (Mukengeshay)