Koffi Olomidé
Tchernobyl

Ndeke moko azalaki na kati ya mayi (Azalaki, eh)
Azalaki na bana motoba, soki sambo
Kuna na kati ya mayi, bana bakomi kolela
Oya oya oya ho, oya oya oya ho
Amour, gloire et beauté

Tchatcho couleur d'origine
Petite mopaoesse, hein
Ton corps c'est Bethléem fais de moi le petit Jésus
Cette nuit et celle d'après hein

Pasi na nga ya yo, y'ozalaki'oloba
Oyo ezui nga, ezui yo, lobi ozalaki'oloba bongo
Oh-oh-oh, oh-oh-oh
Kasi lelo pourquoi nga na pasi oza té?
Ba changer nga adresse, de chez ba parents, nakomi CNPP

Kilawu ya l'amour, Tchétché ezanga antidote
Yaka o libérer nga, motéma, soki olembi n'olinga nga
Oyaki epa na nga, Tchétché au nom de l'amour
O promateki ngai, la plus belle des lunes de miel
Kasi lelo pourquoi, nga na bwale yo kara?
Ba changer nga adresse, vie na nga tchétché ekomi vraiment ya pasi
Tchétché Tchernobyl

Oyaki epa na nga na ba paroles sucrées
O prometaki nga des années de bonheur faites d'amour, Tchétché
Kasi lelo pourquoi nga na pasi yo oza te?
Ba changer nga adresse, vie ya papa nakomi mitelengano, Girac Makayabu
Kilawu ya l'amour, Tchétché ezali incurable
Yaka o libérer nga, conscience soki obaye n'olinga nga
Esika liwa na biso ebandaka yango oyo
Eh Ditombo landa nga, ah
Kolo lupemba

Maloba oyo tolobaki
Ba serments oyo tokataki
Ba promesses oyo to salaki
Ekomi'osala mayi ya ebale ékomi ko déborder
Ndéké nionso na mopepe, le Ciel ekomi polué
Oh-oh-oh, oh

Voyage de noces o prometaki nga
Lune de miel oyo olobaki
Mobembo ya plaisir olakaki nga
Esuki se na Ndjili, nga mwana ya ngani ya famille pauvre
Ba avions nionso epumbwe aéroport ekomi deserté, visa ya moniato

Kombo ya Yesu totangaka
Groupe de prière epayi ya kutino
Mabondeli oyo to salaka
Ekokoma te epayi ya Nzambe tant que bosembo eza absente
Ekosuka se na nzela, paradis eboya hypocrisie
Oh-oh-oh, oh

Eh, ba engagements oyo tozuaka, Tchétché
Bana oyo toyaka kobota, parole oyo topesaka
Toyeba kosalel'ango, vie ya moto eza ya imbwa te
Mbwa aza na makolo mineyi, kasi alandaka nzela se moko à la fois
Ndot'oyo tolotaki, Tchétché, oy'a yo ezalaki en noir et blanc
Nga nazalaki'olota yo en couleur
Ya nga na yo Tchétché, stéreo multi standart, écran géant

Mundele oyo asala mbongo, Tchétché
Atiaki té elongi na ye na kati
Po aboyaki ke baye bakozanga yango
Baya komona ye mabe, y'oboyi nga bato bazomona
Y'osali nga nko lokola okana ngai, nabomela yo nani?

Voyage de noces oyo olobaki
Mobembo o prometaki ngai
Lune de miel olakaki ngai
Esuki se na Ndjili, nga mwana ya famille pauvre

Visa ya moniato
Visa ya moniato
Visa ya moniato
Visa ya moniato

Ah, ah baila
Allez, tobina, tobina